Le déserteur [Lingala translation]

Songs   2024-10-01 12:32:53

Le déserteur [Lingala translation]

Tata Président

na komeli mokanda

o ko tanga ya ngo

soki o za na tango.

Na wuti ko zua

mikanda na nga ya ki soda

po na ko kende na bitumba

liboso ya mercredi soir.

Tata Président

na boyi ko sala bitumba

na yaki mokili te.

Po na ko boma ba bola

e za te po osilika

na lingi ko yebisa yo

mokano na zui

na lingi na kima.

Banda na botama

na mona ko kufa ya tata na nga

na mona ko kende ya ba ndeko na nga

na ko lela ya bana na nga.

Mama na nga a yokaki pasi mingi

a za na lilita na ye

mpe ba bombe e za sala ye eloko te

mitshiopi pe e zo sala ye eloko te

Tango na zalaki na boloko

ba yibaki muasi na nga

ma yibaki molimo na nga

na ba likaniseli na nga.

Lobi tongo tongo

na ko kanga porte na nga

na ba mbula ya pasi

na ko kende na nga.

Na ko senga lipa na nga

na ba nzela ya Africa

ya Soudan, ya Congo

na ko yebisa batu:

Bo boya ko tosa

bo sala bitumba te

bo kende bitumba te

Bo boya ko kende.

Soki olingi ko panza makila,

o panza oyo ya yo

oza moto ya malabo

Tata Président.

Soki o lingi ko landa nga

o yebisa ba gendarme na yo

ke na ko zala na munduki te

ba koki ko beta masasi.

Boris Vian more
  • country:France
  • Languages:French
  • Genre:Jazz, Singer-songwriter
  • Official site:http://www.borisvian.org/
  • Wiki:http://fr.wikipedia.org/wiki/Boris_Vian
Boris Vian Lyrics more
Boris Vian Also Performed Pyrics more
Excellent Songs recommendation
Popular Songs
Artists
Songs